< Banzembo 63 >

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda. Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
O God, you are my God; early will I seek you: my soul thirsts for you, my flesh longs for you in a dry and thirsty land, where no water is;
2 Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
To see your power and your glory, so as I have seen you in the sanctuary.
3 Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo.
Because your loving kindness is better than life, my lips shall praise you.
4 Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Thus will I bless you while I live: I will lift up my hands in your name.
5 Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
My soul shall be satisfied as with marrow and fatness; and my mouth shall praise you with joyful lips:
6 Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu;
When I remember you upon my bed, and meditate on you in the night watches.
7 pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
Because you have been my help, therefore in the shadow of your wings will I rejoice.
8 Nakangami na Yo; loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.
My soul follows hard after you: your right hand upholds me.
9 Bato oyo balukaka koboma ngai bakozinda na mabele
But those that seek my soul, to destroy it, shall go into the lower parts of the earth.
10 Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.
They shall fall by the sword: they shall be a portion for foxes.
11 Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe; moto nyonso oyo alapaka ndayi na Kombo ya Nzambe akomikumisa mpo na yango, pamba te minoko ya bakosi ekokangama.
But the king shall rejoice in God; every one that swears by him shall glory: but the mouth of them that speak lies shall be stopped.

< Banzembo 63 >