< Banzembo 61 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai. 2 Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko. 3 Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai. 4 Posa ya motema na ngai ezali: kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo. 5 Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo. 6 Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi; tika ete awumela na bomoi. 7 Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye. 8 Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.

< Banzembo 61 >