< Banzembo 57 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu. Oh Nzambe, yokela ngai mawa! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka. 2 Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu. 3 Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye. 4 Nazali na kati-kati ya bankosi; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi. 5 Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba! 6 Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango. 7 Nzambe, lendisa motema na ngai; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule. 8 Lokumu na ngai, lamuka! Lindanda mpe nzenze, bolamuka! Nalingi kolamusa tongo. 9 Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo. 10 Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata. 11 Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba!

< Banzembo 57 >