< Banzembo 54 >

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo: « Davidi abombami kati na biso. » Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo. 2 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai. 3 Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te. 4 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai. 5 Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango. 6 Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu. 7 Okangoli ngai na pasi nyonso; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.

< Banzembo 54 >