< Banzembo 47 >

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso. 2 Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba. 3 Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso. 4 Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye. 5 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo. 6 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye. 7 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye. 8 Nzambe akonzaka bikolo nyonso; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule. 9 Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe; atombwama makasi.

< Banzembo 47 >