< Banzembo 45 >

1 Nzembo ya bolingo oyo bana ya Kore bayembaki. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda oyo babengaka Lisi. Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli: Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.
My heart is composing a good matter: I speak of the things which I have made concerning the king: my tongue is the pen of a ready writer.
2 Oleki bato nyonso na kitoko, mpe bibebu na Yo ebimisaka ngolu; yango wana Nzambe apambola Yo mpo na libela.
You are fairer than the children of men: grace is poured into your lips: therefore God has blessed you for ever.
3 Elombe ya bitumba, kanga mopanga na loketo na Yo! Lata lokumu mpe kongenga.
Gird your sword upon your thigh, O most mighty, with your glory and your majesty.
4 Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.
And in your majesty ride prosperously because of truth and meekness and righteousness; and your right hand shall teach you terrible things.
5 Tika ete makonga na Yo ya minu etobola mitema ya banguna ya mokonzi; tika ete bikolo ekweya na se ya matambe na Yo.
your arrows are sharp in the heart of the king's enemies; whereby the people fall under you.
6 Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko; lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.
Your throne, O God, is for ever and ever: the sceptre of your kingdom is a right sceptre.
7 Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo.
You love righteousness, and hate wickedness: therefore God, your God, has anointed you with the oil of gladness above your fellows.
8 Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.
All your garments smell of myrrh, and aloes, and cassia, out of the ivory palaces, whereby they have made you glad.
9 Bana basi ya bakonzi bazali kati na basi ya lokumu; mwasi ya mokonzi azali na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, alati biloko ya wolo ya Ofiri.
Kings' daughters were among your honourable women: upon your right hand did stand the queen in gold of Ophir.
10 Mwana na ngai ya mwasi, tala mpe yoka; bosana bato na yo mpe ndako ya tata na yo.
Hearken, O daughter, and consider, and incline your ear; forget also your own people, and your father's house;
11 Mokonzi asepeli na kitoko na yo; lokola azali nkolo na yo, gumbama liboso na ye.
So shall the king greatly desire your beauty: for he is your Lord; and worship you him.
12 Tiri, mboka kitoko, bato oyo baleki na bozwi kati na bato bakomemela yo bakado mpo ete olinga bango.
And the daughter of Tyre shall be there with a gift; even the rich among the people shall implore your favour.
13 Mwana mwasi ya mokonzi azali kongenga na kitoko kati na ndako ya mokonzi, alati elamba batonga wolo.
The king's daughter is all glorious within: her clothing is of wrought gold.
14 Alati bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, mpe bamemi ye epai ya mokonzi. Bamemi mpe balingami na ye epai na yo, bilenge basi oyo batambolaka elongo na ye.
She shall be brought unto the king in raiment of needlework: the virgins her companions that follow her shall be brought unto you.
15 Bamemi bango na nsayi mpe na esengo; bakoti na ndako ya mokonzi.
With gladness and rejoicing shall they be brought: they shall enter into the king's palace.
16 Bana na yo ya mibali bakozwa esika ya bakoko na bango; okotia bango bakambi kati na mokili mobimba.
Instead of your fathers shall be your children, whom you may make princes in all the earth.
17 Nakosala ete bikeke nyonso ebosana kombo na yo te. Boye bikolo nyonso ekosanzola Yo tango nyonso, seko na seko.
I will make your name to be remembered in all generations: therefore shall the people praise you for ever and ever.

< Banzembo 45 >