< Banzembo 4 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda. Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai. 2 Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta? 3 Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye. 4 Soki bosiliki, bosalaka masumu te; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia. 5 Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe. 6 Bato mingi bazali kotuna: « Nani akomemela biso bolamu? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo. 7 Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika. 8 Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.

< Banzembo 4 >