< Banzembo 35 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai; bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.
大衛的詩。 耶和華啊,與我相爭的,求你與他們相爭! 與我相戰的,求你與他們相戰!
2 Kamata nguba ya moke mpe ya monene, mpe telema mpo na kosunga ngai.
拿着大小的盾牌, 起來幫助我。
3 Tombola likonga ya monene mpe ya moke mpo na kobundisa bato oyo bazali kolanda ngai. Loba na ngai: « Nazali lobiko na Yo. »
抽出槍來,擋住那追趕我的; 求你對我的靈魂說:我是拯救你的。
4 Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa!
願那尋索我命的,蒙羞受辱! 願那謀害我的,退後羞愧!
5 Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ezali kopumbwisa, tango anjelu ya Yawe akotindika bango;
願他們像風前的糠, 有耶和華的使者趕逐他們。
6 tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu tango anjelu ya Yawe akobengana bango.
願他們的道路又暗又滑, 有耶和華的使者追趕他們。
7 Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai, batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,
因他們無故地為我暗設網羅, 無故地挖坑,要害我的性命。
8 tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango!
願災禍忽然臨到他身上! 願他暗設的網纏住自己! 願他落在其中遭災禍!
9 Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.
我的心必靠耶和華快樂, 靠他的救恩高興。
10 Mikuwa na ngai nyonso ekoloba: « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango? »
我的骨頭都要說: 耶和華啊,誰能像你 救護困苦人脫離那比他強壯的, 救護困苦窮乏人脫離那搶奪他的?
11 Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi, bazali kopesa ngai mituna na tina na makambo oyo nayebi te.
凶惡的見證人起來, 盤問我所不知道的事。
12 Bazali kozongisela ngai mabe mpo na bolamu oyo nasalaki, mpe kosundola ngai lokola monyokolami.
他們向我以惡報善, 使我的靈魂孤苦。
13 Nzokande tango bango babelaki, ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei, nazalaki kobondela mpo na bango.
至於我,當他們有病的時候, 我便穿麻衣,禁食,刻苦己心; 我所求的都歸到自己的懷中。
14 Nazalaki kotambola na mawa lokola mpo na moninga to mpo na ndeko; nazalaki kokitisa moto na se mpo na mawa lokola moto oyo azali kolela mama na ye.
我這樣行,好像他是我的朋友,我的弟兄; 我屈身悲哀,如同人為母親哀痛。
15 Kasi awa ngai nakomi na pasi, bango bazali kosepela mpe kosangana; wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana mpo na kotonga ngai, bazali kolemba te kofinga ngai.
我在患難中,他們卻歡喜,大家聚集。 我所不認識的那些下流人聚集攻擊我; 他們不住地把我撕裂。
16 Lokola bapagano, bazali koseka ngai, bazali kolia minu na tina na ngai.
他們如同席上好嬉笑的狂妄人向我咬牙。
17 Yawe, kino tango nini okotala kaka boye? Kangola ngai wuta na misala na bango ya mabe, bomoi na ngai wuta na manzaka ya bankosi oyo.
主啊,你看着不理要到幾時呢? 求你救我的靈魂脫離他們的殘害! 救我的生命脫離少壯獅子!
18 Nakokumisa Yo kati na mayangani monene, nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.
我在大會中要稱謝你, 在眾民中要讚美你。
19 Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.
求你不容那無理與我為仇的向我誇耀! 不容那無故恨我的向我擠眼!
20 Pamba te balobaka te maloba ya kimia, kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimia makambo kati na mboka.
因為他們不說和平話, 倒想出詭詐的言語害地上的安靜人。
21 Balobaka na mongongo makasi: « Eh! Eh! Tomonaki ye! »
他們大大張口攻擊我,說: 阿哈,阿哈,我們的眼已經看見了!
22 Yawe, omoni nyonso wana; kovanda nye te! Nkolo, kozala mosika na ngai te!
耶和華啊,你已經看見了,求你不要閉口! 主啊,求你不要遠離我!
23 Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai! Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai, kota likambo na ngai.
我的上帝我的主啊,求你奮興醒起, 判清我的事,伸明我的冤!
24 Yawe, Nzambe na ngai, longisa ngai na bosembo na Yo; kotika bango te kosepela na tina na ngai.
耶和華-我的上帝啊,求你按你的公義判斷我, 不容他們向我誇耀!
25 Tika ete bamilobela te: « Ah! Tala makambo oyo tozalaki koluka! » Tika ete baloba te: « Tolie ye. »
不容他們心裏說:阿哈,遂我們的心願了! 不容他們說:我們已經把他吞了!
26 Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki!
願那喜歡我遭難的一同抱愧蒙羞! 願那向我妄自尊大的披慚愧,蒙羞辱!
27 Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela; tika ete balobaka tango nyonso: « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye! »
願那喜悅我冤屈得伸的歡呼快樂; 願他們常說:當尊耶和華為大! 耶和華喜悅他的僕人平安。
28 Nakosakola bosembo na Yo, nakokumisa Yo mikolo nyonso.
我的舌頭要終日論說你的公義, 時常讚美你。

< Banzembo 35 >