< Banzembo 3 >

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye. Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai! 2 Ebele bazali koloba na tina na ngai: « Nzambe akobikisa ye te! » 3 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai. 4 Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule. 5 Nalalaka mpe nazwaka pongi; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai. 6 Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso. 7 Yawe, telema! Nzambe na ngai, kangola ngai! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu. 8 Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.

< Banzembo 3 >