< Banzembo 25 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo. 2 Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai. 3 Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni. 4 Yawe, lakisa ngai nzela, teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda. 5 Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso. 6 Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo, pamba te ezali mpo na libela na libela. 7 Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu. 8 Solo, Yawe azali malamu mpe alima; atalisaka banzela na Ye epai ya bato ya masumu. 9 Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye. 10 Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye. 11 Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene. 12 Banani bazali bato oyo batosaka Yawe? Alakisaka bango nzela ya kopona. 13 Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bango kati na bofuluki, mpe mokili ekozala libula ya bana na bango. 14 Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye. 15 Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te kaka Ye nde akolongola makolo na ngai na motambo. 16 Yawe, balola miso na Yo epai na ngai mpe salela ngai ngolu, pamba te nazali kaka ngai moko, mpe nazali monyokolami. 17 Lembisa pasi ya motema na ngai mpe kangola ngai na mitungisi na ngai. 18 Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso. 19 Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi! 20 Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai; sala ete nayoka soni te, pamba te nabombamaka kati na Yo. 21 Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai. 22 Nzambe, kangola Isalaele, na pasi na yango nyonso!

< Banzembo 25 >