< Banzembo 23 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.
ψαλμὸς τῷ Δαυιδ κύριος ποιμαίνει με καὶ οὐδέν με ὑστερήσει
2 Apemisaka ngai na matiti ya mobesu, mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia.
εἰς τόπον χλόης ἐκεῖ με κατεσκήνωσεν ἐπὶ ὕδατος ἀναπαύσεως ἐξέθρεψέν με
3 Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
τὴν ψυχήν μου ἐπέστρεψεν ὡδήγησέν με ἐπὶ τρίβους δικαιοσύνης ἕνεκεν τοῦ ὀνόματος αὐτοῦ
4 Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
ἐὰν γὰρ καὶ πορευθῶ ἐν μέσῳ σκιᾶς θανάτου οὐ φοβηθήσομαι κακά ὅτι σὺ μετ’ ἐμοῦ εἶ ἡ ῥάβδος σου καὶ ἡ βακτηρία σου αὐταί με παρεκάλεσαν
5 Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.
ἡτοίμασας ἐνώπιόν μου τράπεζαν ἐξ ἐναντίας τῶν θλιβόντων με ἐλίπανας ἐν ἐλαίῳ τὴν κεφαλήν μου καὶ τὸ ποτήριόν σου μεθύσκον ὡς κράτιστον
6 Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai.
καὶ τὸ ἔλεός σου καταδιώξεταί με πάσας τὰς ἡμέρας τῆς ζωῆς μου καὶ τὸ κατοικεῖν με ἐν οἴκῳ κυρίου εἰς μακρότητα ἡμερῶν

< Banzembo 23 >