< Banzembo 20 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo. 2 Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona. 3 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba. 4 Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso. 5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso. 6 Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali. 7 Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. 8 Bango, bafukamaka mpe bakweyaka; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi. 9 Yawe, bikisa mokonzi! Yanola biso tango tozali kobelela.

< Banzembo 20 >