< Banzembo 19 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.
εἰς τὸ τέλος ψαλμὸς τῷ Δαυιδ οἱ οὐρανοὶ διηγοῦνται δόξαν θεοῦ ποίησιν δὲ χειρῶν αὐτοῦ ἀναγγέλλει τὸ στερέωμα
2 Mokolo moko na moko eyebisaka yango epai ya mokolo oyo elandaka, mpe butu moko na moko eyebisaka yango epai ya butu oyo elandaka.
ἡμέρα τῇ ἡμέρᾳ ἐρεύγεται ῥῆμα καὶ νὺξ νυκτὶ ἀναγγέλλει γνῶσιν
3 Ezali na nzela ya lisolo te, na nzela mpe ya maloba te oyo mingongo na yango eyokanaka te.
οὐκ εἰσὶν λαλιαὶ οὐδὲ λόγοι ὧν οὐχὶ ἀκούονται αἱ φωναὶ αὐτῶν
4 Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba, maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili. Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.
εἰς πᾶσαν τὴν γῆν ἐξῆλθεν ὁ φθόγγος αὐτῶν καὶ εἰς τὰ πέρατα τῆς οἰκουμένης τὰ ῥήματα αὐτῶν ἐν τῷ ἡλίῳ ἔθετο τὸ σκήνωμα αὐτοῦ
5 Moyi yango ebimaka na tongo ndenge elenge mobali oyo abali sika abimaka na shambre na ye, mpe ndenge elombe atambolaka na elikya ya kolonga na momekano.
καὶ αὐτὸς ὡς νυμφίος ἐκπορευόμενος ἐκ παστοῦ αὐτοῦ ἀγαλλιάσεται ὡς γίγας δραμεῖν ὁδὸν αὐτοῦ
6 Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.
ἀπ’ ἄκρου τοῦ οὐρανοῦ ἡ ἔξοδος αὐτοῦ καὶ τὸ κατάντημα αὐτοῦ ἕως ἄκρου τοῦ οὐρανοῦ καὶ οὐκ ἔστιν ὃς ἀποκρυβήσεται τὴν θέρμην αὐτοῦ
7 Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
ὁ νόμος τοῦ κυρίου ἄμωμος ἐπιστρέφων ψυχάς ἡ μαρτυρία κυρίου πιστή σοφίζουσα νήπια
8 Mitindo ya Yawe ezali alima, esepelisaka motema; malako na Ye ezali peto, epesaka bososoli.
τὰ δικαιώματα κυρίου εὐθεῖα εὐφραίνοντα καρδίαν ἡ ἐντολὴ κυρίου τηλαυγής φωτίζουσα ὀφθαλμούς
9 Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.
ὁ φόβος κυρίου ἁγνός διαμένων εἰς αἰῶνα αἰῶνος τὰ κρίματα κυρίου ἀληθινά δεδικαιωμένα ἐπὶ τὸ αὐτό
10 Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
ἐπιθυμητὰ ὑπὲρ χρυσίον καὶ λίθον τίμιον πολὺν καὶ γλυκύτερα ὑπὲρ μέλι καὶ κηρίον
11 Epesaka mosali na Yo mayele; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.
καὶ γὰρ ὁ δοῦλός σου φυλάσσει αὐτά ἐν τῷ φυλάσσειν αὐτὰ ἀνταπόδοσις πολλή
12 Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te!
παραπτώματα τίς συνήσει ἐκ τῶν κρυφίων μου καθάρισόν με
13 Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.
καὶ ἀπὸ ἀλλοτρίων φεῖσαι τοῦ δούλου σου ἐὰν μή μου κατακυριεύσωσιν τότε ἄμωμος ἔσομαι καὶ καθαρισθήσομαι ἀπὸ ἁμαρτίας μεγάλης
14 Yawe, Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai, tika ete maloba mpe makanisi ya motema na ngai esepelisa Yo!
καὶ ἔσονται εἰς εὐδοκίαν τὰ λόγια τοῦ στόματός μου καὶ ἡ μελέτη τῆς καρδίας μου ἐνώπιόν σου διὰ παντός κύριε βοηθέ μου καὶ λυτρωτά μου

< Banzembo 19 >