< Banzembo 16 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.
[A Poem by David.] Preserve me, God, for in you do I take refuge.
2 Nalobaka na Yawe: « Ozali Nkolo na ngai, Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »
I said to Jehovah, "You are my Lord. Apart from you I have no good thing."
3 Natatolaka na tina na basantu oyo bazali kati na mboka ete bazali penza bato minene oyo nasepelaka na bango makasi.
As for the holy ones who are in the land, they are the excellent ones in whom is all my delight.
4 Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.
Their sorrows will multiply who pay a dowry for another. Their drink offerings of blood I will not offer, nor take their names on my lips.
5 Yawe, Yo moko kaka nde ozali libula mpe bomoi na ngai; ozali ndanga ya bozwi na ngai.
Jehovah is the portion of my inheritance and my cup. You made my lot secure.
6 Nazwi etando ya motuya makasi, ezali libula ya kitoko penza mpo na ngai!
The lines have fallen to me in pleasant places. Yes, beautiful is my inheritance.
7 Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.
I will bless Jehovah, who has given me counsel. Yes, my heart instructs me in the night seasons.
8 Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
I have put Jehovah before me at all times. Because he is at my right hand I will never be upended.
9 Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.
Therefore my heart is glad, and my tongue rejoices. My body shall also dwell in safety.
10 Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola. (Sheol h7585)
For you will not abandon my soul in Sheol, neither will you allow your Holy One to see decay. (Sheol h7585)
11 Okolakisa ngai nzela ya bomoi; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.
You make known to me the path of life. In your presence is fullness of joy. In your right hand there are pleasures forevermore.

< Banzembo 16 >