< Banzembo 150 >

1 Bokumisa Yawe! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi! 2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo! 3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda! 4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite! 5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene! 6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe! Bokumisa Yawe!

< Banzembo 150 >