< Banzembo 15 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule? 2 Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye; 3 oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te; 4 asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te; 5 asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.

< Banzembo 15 >