< Banzembo 15 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule?
ψαλμὸς τῷ Δαυιδ κύριε τίς παροικήσει ἐν τῷ σκηνώματί σου καὶ τίς κατασκηνώσει ἐν τῷ ὄρει τῷ ἁγίῳ σου
2 Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye;
πορευόμενος ἄμωμος καὶ ἐργαζόμενος δικαιοσύνην λαλῶν ἀλήθειαν ἐν καρδίᾳ αὐτοῦ
3 oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te;
ὃς οὐκ ἐδόλωσεν ἐν γλώσσῃ αὐτοῦ οὐδὲ ἐποίησεν τῷ πλησίον αὐτοῦ κακὸν καὶ ὀνειδισμὸν οὐκ ἔλαβεν ἐπὶ τοὺς ἔγγιστα αὐτοῦ
4 asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te;
ἐξουδένωται ἐνώπιον αὐτοῦ πονηρευόμενος τοὺς δὲ φοβουμένους κύριον δοξάζει ὁ ὀμνύων τῷ πλησίον αὐτοῦ καὶ οὐκ ἀθετῶν
5 asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.
τὸ ἀργύριον αὐτοῦ οὐκ ἔδωκεν ἐπὶ τόκῳ καὶ δῶρα ἐπ’ ἀθῴοις οὐκ ἔλαβεν ὁ ποιῶν ταῦτα οὐ σαλευθήσεται εἰς τὸν αἰῶνα

< Banzembo 15 >