< Banzembo 149 >

1 Bokumisa Yawe! Boyembela Yawe nzembo ya sika, bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene!
αλληλουια ᾄσατε τῷ κυρίῳ ᾆσμα καινόν ἡ αἴνεσις αὐτοῦ ἐν ἐκκλησίᾳ ὁσίων
2 Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango!
εὐφρανθήτω Ισραηλ ἐπὶ τῷ ποιήσαντι αὐτόν καὶ υἱοὶ Σιων ἀγαλλιάσθωσαν ἐπὶ τῷ βασιλεῖ αὐτῶν
3 Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina; tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda!
αἰνεσάτωσαν τὸ ὄνομα αὐτοῦ ἐν χορῷ ἐν τυμπάνῳ καὶ ψαλτηρίῳ ψαλάτωσαν αὐτῷ
4 Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga.
ὅτι εὐδοκεῖ κύριος ἐν λαῷ αὐτοῦ καὶ ὑψώσει πραεῖς ἐν σωτηρίᾳ
5 Tika ete bayengebene na Yawe basepela kati na lokumu oyo; tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango!
καυχήσονται ὅσιοι ἐν δόξῃ καὶ ἀγαλλιάσονται ἐπὶ τῶν κοιτῶν αὐτῶν
6 Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale kati na maboko na bango
αἱ ὑψώσεις τοῦ θεοῦ ἐν τῷ λάρυγγι αὐτῶν καὶ ῥομφαῖαι δίστομοι ἐν ταῖς χερσὶν αὐτῶν
7 mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo mpe kopesa bato etumbu;
τοῦ ποιῆσαι ἐκδίκησιν ἐν τοῖς ἔθνεσιν ἐλεγμοὺς ἐν τοῖς λαοῖς
8 mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo, kokanga bato na bango ya lokumu na mabende
τοῦ δῆσαι τοὺς βασιλεῖς αὐτῶν ἐν πέδαις καὶ τοὺς ἐνδόξους αὐτῶν ἐν χειροπέδαις σιδηραῖς
9 mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango! Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso. Bokumisa Yawe!
τοῦ ποιῆσαι ἐν αὐτοῖς κρίμα ἔγγραπτον δόξα αὕτη ἐστὶν πᾶσι τοῖς ὁσίοις αὐτοῦ

< Banzembo 149 >