< Banzembo 148 >

1 Bokumisa Yawe! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.
Praise all of you the LORD. Praise all of you the LORD from the heavens: praise him in the heights.
2 Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso;
Praise all of you him, all his angels: praise all of you him, all his hosts.
3 bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka;
Praise all of you him, sun and moon: praise him, all you stars of light.
4 bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo!
Praise him, all of you heavens of heavens, and all of you waters that be above the heavens.
5 Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.
Let them praise the name of the LORD: for he commanded, and they were created.
6 Atiaki yango mpo na libela; apesaki mibeko oyo ekobongwana te.
He has also established them for ever and ever: he has made a decree which shall not pass.
7 Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,
Praise the LORD from the earth, all of you dragons, and all deeps:
8 ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye;
Fire, and hail; snow, and vapours; stormy wind fulfilling his word:
9 ezala bangomba milayi to bangomba mikuse, ezala banzete oyo ebotaka bambuma to banzete ya sedele,
Mountains, and all hills; fruitful trees, and all cedars:
10 ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso, ezala bikelamu oyo etambolaka na libumu to bandeke,
Beasts, and all cattle; creeping things, and flying fowl:
11 ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso, ezala bakambi to batambolisi nyonso ya mokili,
Kings of the earth, and all people; princes, and all judges of the earth:
12 ezala bilenge mibali to bilenge basi, ezala bampaka to bana mike!
Both young men, and maidens; old men, and children:
13 Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.
Let them praise the name of the LORD: for his name alone is excellent; his glory is above the earth and heaven.
14 Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe!
He also exalts the horn of his people, the praise of all his saints; even of the children of Israel, a people near unto him. Praise all of you the LORD.

< Banzembo 148 >