< Banzembo 146 >

1 Bokumisa Yawe! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe! 2 Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi. 3 Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa. 4 Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka. 5 Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye! 6 Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango; azali sembo seko na seko. 7 Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala; abimisaka bakangami na boloko. 8 Yawe abikisaka miso ya bakufi miso; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama; Yawe alingaka bato ya sembo. 9 Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe. 10 Yawe azali Mokonzi seko na seko; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela! Bokumisa Yawe!

< Banzembo 146 >