< Banzembo 146 >

1 Bokumisa Yawe! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe!
Praise the LORD! Praise the LORD, my soul.
2 Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
While I live, I will praise the LORD. I will sing praises to my God as long as I exist.
3 Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
Don’t put your trust in princes, in a son of man in whom there is no help.
4 Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
His spirit departs, and he returns to the earth. In that very day, his thoughts perish.
5 Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye!
Happy is he who has the God of Jacob for his help, whose hope is in the LORD, his God,
6 Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango; azali sembo seko na seko.
who made heaven and earth, the sea, and all that is in them; who keeps truth forever;
7 Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala; abimisaka bakangami na boloko.
who executes justice for the oppressed; who gives food to the hungry. The LORD frees the prisoners.
8 Yawe abikisaka miso ya bakufi miso; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama; Yawe alingaka bato ya sembo.
The LORD opens the eyes of the blind. The LORD raises up those who are bowed down. The LORD loves the righteous.
9 Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.
The LORD preserves the foreigners. He upholds the fatherless and widow, but he turns the way of the wicked upside down.
10 Yawe azali Mokonzi seko na seko; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela! Bokumisa Yawe!
The LORD will reign forever; your God, O Zion, to all generations. Praise the LORD!

< Banzembo 146 >