< Banzembo 145 >

1 Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai; nakopambola Kombo na Yo seko na seko. 2 Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela. 3 Yawe azali monene, abongi na lokumu; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye. 4 Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene. 5 Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo. 6 Bakolobela nguya na Yo ya somo, mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene. 7 Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo, bakobetela bosembo na Yo maboko. 8 Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo. 9 Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso. 10 Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo! 11 Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo. 12 Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo. 13 Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo. 14 Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka. 15 Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki. 16 Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi. 17 Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso. 18 Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo; 19 akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye. 20 Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe. 21 Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela!

< Banzembo 145 >