< Banzembo 143 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, yoka losambo na ngai, landa mabondeli na ngai! Yanola ngai na boyengebene mpe na bosembo na Yo. 2 Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo. 3 Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala. 4 Molimo na ngai elembi kati na ngai, motema na ngai emitungisi kati na ngai. 5 Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo. 6 Nasemboli maboko na ngai epai na Yo; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka. 7 Yawe, zongisela ngai eyano noki! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu. 8 Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo. 9 Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai! Nazali koluka ebombamelo epai na Yo. 10 Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku! 11 Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo, bikisa bomoi na ngai! Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi. 12 Na bolingo na Yo, kanga minoko ya banguna na ngai mpe limwisa bayini na ngai nyonso, pamba te nazali mosali na Yo.

< Banzembo 143 >