< Banzembo 142 >

1 Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga. Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe; na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.
συνέσεως τῷ Δαυιδ ἐν τῷ εἶναι αὐτὸν ἐν τῷ σπηλαίῳ προσευχή φωνῇ μου πρὸς κύριον ἐκέκραξα φωνῇ μου πρὸς κύριον ἐδεήθην
2 Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.
ἐκχεῶ ἐναντίον αὐτοῦ τὴν δέησίν μου τὴν θλῖψίν μου ἐνώπιον αὐτοῦ ἀπαγγελῶ
3 Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.
ἐν τῷ ἐκλείπειν ἐξ ἐμοῦ τὸ πνεῦμά μου καὶ σὺ ἔγνως τὰς τρίβους μου ἐν ὁδῷ ταύτῃ ᾗ ἐπορευόμην ἔκρυψαν παγίδα μοι
4 Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai!
κατενόουν εἰς τὰ δεξιὰ καὶ ἐπέβλεπον ὅτι οὐκ ἦν ὁ ἐπιγινώσκων με ἀπώλετο φυγὴ ἀπ’ ἐμοῦ καὶ οὐκ ἔστιν ὁ ἐκζητῶν τὴν ψυχήν μου
5 Yawe, nagangi epai na Yo! Nalobi: « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi! »
ἐκέκραξα πρὸς σέ κύριε εἶπα σὺ εἶ ἡ ἐλπίς μου μερίς μου ἐν γῇ ζώντων
6 Yoka koganga na ngai, pamba te nazali na pasi makasi! Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai, pamba te baleki ngai na makasi.
πρόσχες πρὸς τὴν δέησίν μου ὅτι ἐταπεινώθην σφόδρα ῥῦσαί με ἐκ τῶν καταδιωκόντων με ὅτι ἐκραταιώθησαν ὑπὲρ ἐμέ
7 Bimisa ngai na boloko mpo ete nasanzola Kombo na Yo! Bato ya sembo bakoya kozingela ngai sima na Yo kosalela ngai bolamu.
ἐξάγαγε ἐκ φυλακῆς τὴν ψυχήν μου τοῦ ἐξομολογήσασθαι τῷ ὀνόματί σου κύριε ἐμὲ ὑπομενοῦσιν δίκαιοι ἕως οὗ ἀνταποδῷς μοι

< Banzembo 142 >