< Banzembo 14 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka: « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu. 2 Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe. 3 Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te! 4 Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te! 5 Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo. 6 Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola kasi Yawe azali ebombamelo na ye. 7 Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

< Banzembo 14 >