< Banzembo 134 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo. 2 Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe! 3 Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele!

< Banzembo 134 >