< Banzembo 133 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko! 2 Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye. 3 Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.

< Banzembo 133 >