< Banzembo 128 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye! 2 Oliaka mbuma ya mosala na Yo; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki. 3 Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo. 4 Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye. 5 Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo 6 mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele!

< Banzembo 128 >