< Banzembo 127 >

1 Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba. 2 Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi. 3 Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti. 4 Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba, ndenge wana mpe bana oyo moto aboti na bolenge na ye bazali. 5 Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.

< Banzembo 127 >