< Banzembo 126 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto. 2 Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo: « Yawe asaleli bango makambo minene! » 3 Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela. 4 Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi. 5 Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo. 6 Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.

< Banzembo 126 >