< Banzembo 125 >

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela. 2 Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi, ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye, kobanda sik’oyo kino libela na libela. 3 Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe. 4 Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema! 5 Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe! Tika ete kimia ezala na Isalaele!

< Banzembo 125 >