< Banzembo 124 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te; tika ete Isalaele aloba bongo! 2 Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso, 3 mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi. 4 Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso. 5 Mayi makasi elingaki kozindisa biso. 6 Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso! 7 Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke; motambo ekatanaki, mpe tokimaki. 8 Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

< Banzembo 124 >