< Banzembo 122 >

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai: « Tokende na Tempelo ya Yawe! » 2 Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo! 3 Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko. 4 Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe. 5 Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi. 6 Bosenga kimia ya Yelusalemi! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia! 7 Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi! 8 Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi: « Tika ete kimia ezala kati na yo! » 9 Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.

< Banzembo 122 >