< Banzembo 121 >

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi? 2 Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. 3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te. 4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te! 5 Yawe azali mobateli na yo; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo. 6 Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te! 7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo; 8 Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

< Banzembo 121 >