< Banzembo 12 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. Yawe, sunga biso! Pamba te bayengebene bazali lisusu te; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato. 2 Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te. 3 Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo, 4 ba-oyo balobaka: « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso; nani akoluka kozala nkolo na biso? » 5 Yawe alobi: « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. » 6 Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo. 7 Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe. 8 Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai soki bato bapesi bozoba lokumu.

< Banzembo 12 >