< Banzembo 111 >

1 Bokumisa Yawe! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani. 2 Yawe asalaka makambo minene; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango. 3 Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela. 4 Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye. Yawe atondi na mawa mpe atalisaka ngolu na Ye. 5 Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso. 6 Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu. 7 Misala na Ye nyonso elakisaka boyengebene mpe bosembo na Ye; mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango. 8 Epesama mpo na libela, mpe esengeli kotosa yango na bosembo mpe na bosolo. 9 Akangolaki bato na Ye, mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango. Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo. 10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

< Banzembo 111 >