< Banzembo 110 >

1 Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »
τῷ Δαυιδ ψαλμός εἶπεν ὁ κύριος τῷ κυρίῳ μου κάθου ἐκ δεξιῶν μου ἕως ἂν θῶ τοὺς ἐχθρούς σου ὑποπόδιον τῶν ποδῶν σου
2 Wuta na Siona, Yawe akosala ete nguya na yo ya bokonzi ekende mosika, mpe okokonza kati na banguna na Yo.
ῥάβδον δυνάμεώς σου ἐξαποστελεῖ κύριος ἐκ Σιων καὶ κατακυρίευε ἐν μέσῳ τῶν ἐχθρῶν σου
3 Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
μετὰ σοῦ ἡ ἀρχὴ ἐν ἡμέρᾳ τῆς δυνάμεώς σου ἐν ταῖς λαμπρότησιν τῶν ἁγίων ἐκ γαστρὸς πρὸ ἑωσφόρου ἐξεγέννησά σε
4 Yawe alapaki ndayi oyo, akobongola maloba na Ye te: « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki! »
ὤμοσεν κύριος καὶ οὐ μεταμεληθήσεται σὺ εἶ ἱερεὺς εἰς τὸν αἰῶνα κατὰ τὴν τάξιν Μελχισεδεκ
5 Nkolo azali na ngambo ya loboko na yo ya mobali, akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na Ye.
κύριος ἐκ δεξιῶν σου συνέθλασεν ἐν ἡμέρᾳ ὀργῆς αὐτοῦ βασιλεῖς
6 Akopesa bikolo etumbu: bikolo nyonso ekotonda na bibembe, mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba.
κρινεῖ ἐν τοῖς ἔθνεσιν πληρώσει πτώματα συνθλάσει κεφαλὰς ἐπὶ γῆς πολλῶν
7 Na nzela, mokonzi amelaka mayi na mwa moluka; yango wana atombolaka moto.
ἐκ χειμάρρου ἐν ὁδῷ πίεται διὰ τοῦτο ὑψώσει κεφαλήν

< Banzembo 110 >