< Banzembo 109 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, kovanda kimia te!
למנצח לדוד מזמור אלהי תהלתי אל תחרש׃
2 Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo.
כי פי רשע ופי מרמה עלי פתחו דברו אתי לשון שקר׃
3 Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.
ודברי שנאה סבבוני וילחמוני חנם׃
4 Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.
תחת אהבתי ישטנוני ואני תפלה׃
5 Bazali kozongisela ngai mabe na bolamu, mpe koyina na bolingo.
וישימו עלי רעה תחת טובה ושנאה תחת אהבתי׃
6 Kaba ye na maboko ya moto mabe! Bimisela ye monguna, na ngambo ya loboko na ye ya mobali!
הפקד עליו רשע ושטן יעמד על ימינו׃
7 Tika ete bazwa ye lokola moto mabe na tango ya kosamba, mpe libondeli na ye etangama lokola masumu!
בהשפטו יצא רשע ותפלתו תהיה לחטאה׃
8 Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye!
יהיו ימיו מעטים פקדתו יקח אחר׃
9 Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, mpe tika ete mwasi na ye akoma mwasi akufisa mobali!
יהיו בניו יתומים ואשתו אלמנה׃
10 Tika ete bana na ye batelengana mpe bakoma bisengasenga, tika ete bakende kosenga mosika ya ndako na bango oyo ebukana-bukana!
ונוע ינועו בניו ושאלו ודרשו מחרבותיהם׃
11 Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye!
ינקש נושה לכל אשר לו ויבזו זרים יגיעו׃
12 Tika ete moko te atalisa ye bolingo, tika ete moko te ayokela bana bitike na ye mawa!
אל יהי לו משך חסד ואל יהי חונן ליתומיו׃
13 Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda!
יהי אחריתו להכרית בדור אחר ימח שמם׃
14 Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye!
יזכר עון אבתיו אל יהוה וחטאת אמו אל תמח׃
15 Tika ete Yawe akanisaka masumu yango tango nyonso mpe asala ete babosana bango libela na mokili!
יהיו נגד יהוה תמיד ויכרת מארץ זכרם׃
16 Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema;
יען אשר לא זכר עשות חסד וירדף איש עני ואביון ונכאה לבב למותת׃
17 lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye!
ויאהב קללה ותבואהו ולא חפץ בברכה ותרחק ממנו׃
18 Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, tika ete ekota kati na ye lokola mayi, mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta!
וילבש קללה כמדו ותבא כמים בקרבו וכשמן בעצמותיו׃
19 Tika ete elakeli mabe yango elata ye lokola elamba oyo alati, mpe ekangama ye na loketo lokola mokaba mpo na tango nyonso!
תהי לו כבגד יעטה ולמזח תמיד יחגרה׃
20 Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.
זאת פעלת שטני מאת יהוה והדברים רע על נפשי׃
21 Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo.
ואתה יהוה אדני עשה אתי למען שמך כי טוב חסדך הצילני׃
22 Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai.
כי עני ואביון אנכי ולבי חלל בקרבי׃
23 Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa; bazali kobengana ngai lokola mabanki.
כצל כנטותו נהלכתי ננערתי כארבה׃
24 Mabolongo na ngai elembi mpo na kokila mingi bilei, nzoto na ngai mpe ebukani mpo ete nakondi makasi.
ברכי כשלו מצום ובשרי כחש משמן׃
25 Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.
ואני הייתי חרפה להם יראוני יניעון ראשם׃
26 Yawe, Nzambe na ngai, sunga ngai; bikisa ngai kolanda bolingo na Yo!
עזרני יהוה אלהי הושיעני כחסדך׃
27 Tika ete banguna na ngai bayeba ete Yo Yawe nde osalaki bongo.
וידעו כי ידך זאת אתה יהוה עשיתה׃
28 Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.
יקללו המה ואתה תברך קמו ויבשו ועבדך ישמח׃
29 Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.
ילבשו שוטני כלמה ויעטו כמעיל בשתם׃
30 Nakosanzola Yawe na mongongo makasi, nakokumisa Ye kati na ebele ya bato.
אודה יהוה מאד בפי ובתוך רבים אהללנו׃
31 Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.
כי יעמד לימין אביון להושיע משפטי נפשו׃

< Banzembo 109 >