< Banzembo 107 >

1 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! 2 Tika ete bato oyo Yawe asikolaki baloba bongo, ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna, 3 ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso, wuta na este, na weste, na nor mpe na sude. 4 Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda. 5 Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi, bakomaki pene ya kokufa. 6 Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango. 7 Atambolisaki bango na nzela ya alima mpo ete bakende kovanda kati na engumba. 8 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato! 9 Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala. 10 Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende, 11 pamba te batombokelaki maloba na Nzambe mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. 12 Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango. 13 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango. 14 Abimisaki bango wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa, mpe abukaki minyololo na bango. 15 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato! 16 Pamba te abukaki bikuke ya bronze mpe akataki bikangelo ya mabende. 17 Bamosusu bakomaki bazoba mpo na etamboli mabe na bango, mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango. 18 Minoko na bango eyinaki bilei nyonso, mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa. 19 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango. 20 Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda. 21 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato! 22 Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo! 23 Bato oyo bakendaka mobembo na ebale monene kati na masuwa mpe basalaka mombongo na mayi minene 24 bamonaki misala ya Yawe, mpe bikamwa kati na ebale monene. 25 Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki, etombolaki bambonge. 26 Bazalaki komata kino na likolo mpe kokita kino na se, bazalaki kolemba nzoto kati na pasi. 27 Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga lokola bato balangwe masanga, bwanya na bango nyonso elimwaki. 28 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe mpe abimisaki bango na mitungisi na bango. 29 Akitisaki mopepe makasi, bambonge ya ebale monene evandaki kimia. 30 Basepelaki na kimia oyo ezongaki, mpe Nzambe amemaki bango kino na libongo oyo balingaki. 31 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato! 32 Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi. 33 Akoki kobongola bibale esobe; kobongola bitima mabele ya kokawuka; 34 kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango. 35 Akoki kobongola esobe liziba; kobongola mabele ya kokawuka bitima. 36 Akoki kosala ete bato na nzala bakoma kovanda kuna, batonga engumba oyo bato bakoki kovanda, 37 babwaka bambuma na bilanga mpe balona banzete ya vino oyo ekobota bambuma ebele. 38 Apamboli bango, mpe bakomi ebele; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango. 39 Motango ya bato mosusu ekiti mpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi. 40 Nzambe asambwisaka bato minene, akotisaka bango na mobulu makasi kino bazanga nzela ya kobimela na pasi. 41 Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango, mpe asalaka ete babotana ebele kati na bituka na bango lokola etonga ya bameme. 42 Tango bato ya sembo bamonaka bongo, basepelaka, kasi bato nyonso ya mabe bakangaka minoko na bango. 43 Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe!

< Banzembo 107 >