< Banzembo 101 >

1 Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo; nakoyembela nde Yo, Yawe. 2 Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela. 3 Nakotala eloko moko te ya mabe; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te. 4 Mosika na ngai, motema ya kilikili; naboyi kosala mabe. 5 Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu. 6 Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai. 7 Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te; liboso na ngai, mokosi akotelema te. 8 Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.

< Banzembo 101 >