< Banzembo 1 >

1 Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli, 2 kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi. 3 Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu. 4 Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka. 5 Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo. 6 Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.

< Banzembo 1 >