< Masese 28 >

1 Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.
De boze vlucht, ook al wordt hij niet vervolgd; De rechtvaardige voelt zich veilig als een leeuw.
2 Soki kotomboka ezali kati na mokili, bakonzi bakomaka ebele; kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia.
De misdaad van tyrannen doet twisten ontstaan; Door een verstandig man worden ze bijgelegd
3 Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.
Een man, die rijk is, maar de armen verdrukt, Is een regen, die wegspoelt, geen brood geeft.
4 Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.
Die om de wet niet geven, prijzen den boze; Die de wet onderhouden, zijn kwaad op hem.
5 Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo, kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.
Slechte mensen verstaan geen recht, Maar die Jahweh zoeken begrijpen alles.
6 Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.
Beter een arme, die onberispelijk wandelt, Dan een rijke, die verkeerde wegen gaat.
7 Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele, kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge ayokisaka tata na ye soni.
Het kind, dat de Wet onderhoudt, is verstandig; Maar gaat het om met verkwisters, het maakt zijn vader beschaamd.
8 Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.
Wie zijn bezit vermeerdert met rente en toeslag, Spaart het op voor hem, die goed is voor de armen.
9 Moto oyo akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka mobeko, libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.
Wie weigert, naar de Wet te luisteren, Is een gruwel, zelfs als hij bidt.
10 Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabe akokangama na motambo oyo asali ye moko, kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango.
Wie brave mensen op het slechte pad brengt, Valt zelf in zijn eigen kuil. Deugdzamen zullen het goede verwerven
11 Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu.
Een rijkaard denkt, dat hij wijs is; Een arme, maar verstandige drommel doorziet hem.
12 Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi; kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka.
Als de rechtvaardigen juichen, is de welvaart groot; Krijgen bozen de macht, dan zijn de mensen zoek.
13 Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
Wie zijn zonden verheimelijkt, zal geen voorspoed hebben; Wie ze belijdt en laat varen, zal vergiffenis krijgen.
14 Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe, kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.
Gelukkig de mens, die altijd angstvallig is; Wie zijn hart afstompt, valt in het kwaad.
15 Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.
Een brullende leeuw en een roofzuchtige beer: Dat is een goddeloos heerser over een behoeftig volk.
16 Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele, kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibi ayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele.
Een kortzichtig vorst maakt zich aan veel afpersing schuldig; Haat hij oneerlijke winst, dan leeft hij lang.
17 Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga akimaka kino na libulu ya kufa; tika ete moto moko te akanga ye nzela.
Een mens, die bezwaard is door bloedschuld, Moet tot het graf een vluchteling blijven, door niemand geholpen.
18 Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko, kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale akokweya na moko.
Wie onberispelijk wandelt, wordt gered; Wie verkeerde wegen gaat, valt in een kuil.
19 Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi akotonda na bobola.
Wie een akker bebouwt, heeft eten genoeg; Wie zijn tijd verbeuzelt, zit volop in de armoe.
20 Moto ya sembo afulukaka na mapamboli, kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu akozanga te kozwa etumbu.
Een eerlijk mens wordt rijkelijk gezegend; Wie te spoedig rijk wil worden, blijft niet ongestraft.
21 Kopona bilongi ezalaka malamu te; nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe.
Partijdigheid is altijd verkeerd: Voor een stuk brood kan iemand een misdrijf begaan.
22 Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.
Een boosaardig mens wil spoedig rijk worden, Niet vermoedend, dat het gebrek hem wacht.
23 Moto oyo apamelaka moninga na ye akozwa ngolu na suka koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.
Wie iemand vermaant, oogst later dank, Meer dan iemand met een gladde tong.
24 Moto oyo ayibaka tata mpe mama na ye, bongo alobaka: « Ezali na yango mabe te, » azali moninga ya mobomi.
Wie zijn vader en moeder berooft, en zegt: "Het is niet verkeerd", Is een gezel van den misdadiger.
25 Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.
Een hebzuchtig mens stookt ruzie; Wie op Jahweh vertrouwt, heeft het goed.
26 Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.
Wie op zichzelf vertrouwt, is een domoor; Wie in wijsheid wandelt, wordt gered.
27 Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.
Wie aan een arme geeft, krijgt geen gebrek; Wie zijn ogen voor hem sluit, wordt diep vervloekt.
28 Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka; kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.
Krijgen bozen de macht, dan bergt zich de mens; Als zij ten onder gaan, worden de rechtvaardigen talrijk.

< Masese 28 >