< Masese 27 >

1 Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
Boast not yourself of tomorrow; for you know not what a day may bring forth.
2 Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
Let another man praise you, and not your own mouth; a stranger, and not your own lips.
3 Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.
A stone is heavy, and the sand weighty; but a fool's wrath is heavier than them both.
4 Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa?
Wrath is cruel, and anger is outrageous; but who is able to stand before envy?
5 Pamela oyo epesami na polele ezali malamu koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
Open rebuke is better than secret love.
6 Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
Faithful are the wounds of a friend; but the kisses of an enemy are deceitful.
7 Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.
The full soul loathes an honeycomb; but to the hungry soul every bitter thing is sweet.
8 Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga mosika ya zala na yango.
As a bird that wanders from her nest, so is a man that wanders from his place.
9 Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.
Ointment and perfume rejoice the heart: so does the sweetness of a man's friend by hearty counsel.
10 Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
your own friend, and your father's friend, forsake not; neither go into your brother's house in the day of your calamity: for better is a neighbour that is near than a brother far off.
11 Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.
My son, be wise, and make my heart glad, that I may answer him that reproaches me.
12 Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.
A prudent man forsees the evil, and hides himself; but the simple pass on, and are punished.
13 Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
Take his garment that is guarantor for a stranger, and take a pledge of him for a strange woman.
14 Soki moto moko ayei kopambola molingami na ye, na mongongo makasi mpe na tongo-tongo, bakozwa yango lokola elakeli mabe.
He that blesses his friend with a loud voice, rising early in the morning, it shall be counted a curse to him.
15 Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.
A continual dropping in a very rainy day and a contentious woman are alike.
16 Kokanga ye ezali lokola koluka kokanga mopepe to mafuta na loboko.
Whosoever hides her hides the wind, and the ointment of his right hand, which betrayed itself.
17 Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu, ndenge wana mpe moto abongaka soki akutani na moto mosusu.
Iron sharpens iron; so a man sharpens the countenance of his friend.
18 Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi aliaka mpe mbuma na yango, mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.
Whoso keeps the fig tree shall eat the fruit thereof: so he that waits on his master shall be honoured.
19 Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi, ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.
As in water face answers to face, so the heart of man to man.
20 Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te. (Sheol h7585)
Hell and destruction are never full; so the eyes of man are never satisfied. (Sheol h7585)
21 Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi bamekaka moto na nzela ya lokumu na ye.
As the fining pot for silver, and the furnace for gold; so is a man to his praise.
22 Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
Though you should bray a fool in a mortar among wheat with a pestle, yet will not his foolishness depart from him.
23 Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,
Be you diligent to know the state of your flocks, and look well to your herds.
24 pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela.
For riches are not for ever: and does the crown endure to every generation?
25 Soki bakati matiti ya bibwele, matiti ya sika ekobota mpe bakolokota matiti ya bangomba;
The hay appears, and the tender grass shows itself, and herbs of the mountains are gathered.
26 bameme ekopesa yo bilamba, mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga.
The lambs are for your clothing, and the goats are the price of the field.
27 Okozala na miliki ebele ya bantaba mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi.
And you shall have goats' milk enough for your food, for the food of your household, and for the maintenance for your maidens.

< Masese 27 >