< Masese 14 >

1 Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
Every wise woman builds her house: but the foolish plucks it down with her hands.
2 Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.
He that walks in his uprightness fears the LORD: but he that is perverse in his ways despises him.
3 Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele, ezalaka na nzete ya lolendo, kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.
In the mouth of the foolish is a rod of pride: but the lips of the wise shall preserve them.
4 Esika oyo ezalaka na ngombe te, elielo mpe ezalaka na eloko te, pamba te ezali makasi ya bangombe nde epesaka bomengo.
Where no oxen are, the crib is clean: but much increase is by the strength of the ox.
5 Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
A faithful witness will not lie: but a false witness will utter lies.
6 Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.
A scorner seeks wisdom, and finds it not: but knowledge is easy to him that understands.
7 Zala mosika ya zoba, pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.
Go from the presence of a foolish man, when you perceive not in him the lips of knowledge.
8 Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele: lokuta.
The wisdom of the prudent is to understand his way: but the folly of fools is deceit.
9 Bazoba balingaka te kosenga bolimbisi, kasi ngolu na Nzambe ezalaka kati na bato ya sembo.
Fools make a mock at sin: but among the righteous there is favor.
10 Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.
The heart knows his own bitterness; and a stranger does not intermeddle with his joy.
11 Ndako ya moto mabe ekobukana, kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.
The house of the wicked shall be overthrown: but the tabernacle of the upright shall flourish.
12 Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
There is a way which seems right to a man, but the end thereof are the ways of death.
13 Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa, mpe esengo ekoki kosuka na mawa.
Even in laughter the heart is sorrowful; and the end of that mirth is heaviness.
14 Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.
The backslider in heart shall be filled with his own ways: and a good man shall be satisfied from himself.
15 Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.
The simple believes every word: but the prudent man looks well to his going.
16 Moto ya bwanya abangaka mabe mpe akimaka yango, kasi zoba atombokaka, na elikya nyonso.
A wise man fears, and departs from evil: but the fool rages, and is confident.
17 Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.
He that is soon angry deals foolishly: and a man of wicked devices is hated.
18 Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula, kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.
The simple inherit folly: but the prudent are crowned with knowledge.
19 Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu, bato ya mitema mabe bakofukama na ekuke ya bato ya sembo.
The evil bow before the good; and the wicked at the gates of the righteous.
20 Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele.
The poor is hated even of his own neighbor: but the rich has many friends.
21 Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.
He that despises his neighbor sins: but he that has mercy on the poor, happy is he.
22 Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.
Do they not err that devise evil? but mercy and truth shall be to them that devise good.
23 Mosala nyonso epesaka litomba, kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.
In all labor there is profit: but the talk of the lips tends only to penury.
24 Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma.
The crown of the wise is their riches: but the foolishness of fools is folly.
25 Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
A true witness delivers souls: but a deceitful witness speaks lies.
26 Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.
In the fear of the LORD is strong confidence: and his children shall have a place of refuge.
27 Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
The fear of the LORD is a fountain of life, to depart from the snares of death.
28 Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.
In the multitude of people is the king’s honor: but in the want of people is the destruction of the prince.
29 Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
He that is slow to wrath is of great understanding: but he that is hasty of spirit exalts folly.
30 Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.
A sound heart is the life of the flesh: but envy the rottenness of the bones.
31 Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.
He that oppresses the poor reproaches his Maker: but he that honors him has mercy on the poor.
32 Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
The wicked is driven away in his wickedness: but the righteous has hope in his death.
33 Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba?
Wisdom rests in the heart of him that has understanding: but that which is in the middle of fools is made known.
34 Bosembo etombolaka ekolo, kasi lisumu ememelaka bato soni.
Righteousness exalts a nation: but sin is a reproach to any people.
35 Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya, kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.
The king’s favor is toward a wise servant: but his wrath is against him that causes shame.

< Masese 14 >