< Masese 13 >

1 Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
υἱὸς πανοῦργος ὑπήκοος πατρί υἱὸς δὲ ἀνήκοος ἐν ἀπωλείᾳ
2 Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.
ἀπὸ καρπῶν δικαιοσύνης φάγεται ἀγαθός ψυχαὶ δὲ παρανόμων ὀλοῦνται ἄωροι
3 Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
ὃς φυλάσσει τὸ ἑαυτοῦ στόμα τηρεῖ τὴν ἑαυτοῦ ψυχήν ὁ δὲ προπετὴς χείλεσιν πτοήσει ἑαυτόν
4 Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
ἐν ἐπιθυμίαις ἐστὶν πᾶς ἀεργός χεῖρες δὲ ἀνδρείων ἐν ἐπιμελείᾳ
5 Moto ya sembo ayinaka maloba ya lokuta, kasi moto mabe amiyinisaka mpe apanzaka soni.
λόγον ἄδικον μισεῖ δίκαιος ἀσεβὴς δὲ αἰσχύνεται καὶ οὐχ ἕξει παρρησίαν
6 Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.
δικαιοσύνη φυλάσσει ἀκάκους τοὺς δὲ ἀσεβεῖς φαύλους ποιεῖ ἁμαρτία
7 Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.
εἰσὶν οἱ πλουτίζοντες ἑαυτοὺς μηδὲν ἔχοντες καὶ εἰσὶν οἱ ταπεινοῦντες ἑαυτοὺς ἐν πολλῷ πλούτῳ
8 Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te.
λύτρον ἀνδρὸς ψυχῆς ὁ ἴδιος πλοῦτος πτωχὸς δὲ οὐχ ὑφίσταται ἀπειλήν
9 Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.
φῶς δικαίοις διὰ παντός φῶς δὲ ἀσεβῶν σβέννυται ψυχαὶ δόλιαι πλανῶνται ἐν ἁμαρτίαις δίκαιοι δὲ οἰκτίρουσιν καὶ ἐλεῶσιν
10 Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.
κακὸς μεθ’ ὕβρεως πράσσει κακά οἱ δὲ ἑαυτῶν ἐπιγνώμονες σοφοί
11 Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.
ὕπαρξις ἐπισπουδαζομένη μετὰ ἀνομίας ἐλάσσων γίνεται ὁ δὲ συνάγων ἑαυτῷ μετ’ εὐσεβείας πληθυνθήσεται δίκαιος οἰκτίρει καὶ κιχρᾷ
12 Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.
κρείσσων ἐναρχόμενος βοηθῶν καρδίᾳ τοῦ ἐπαγγελλομένου καὶ εἰς ἐλπίδα ἄγοντος δένδρον γὰρ ζωῆς ἐπιθυμία ἀγαθή
13 Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.
ὃς καταφρονεῖ πράγματος καταφρονηθήσεται ὑπ’ αὐτοῦ ὁ δὲ φοβούμενος ἐντολήν οὗτος ὑγιαίνει υἱῷ δολίῳ οὐδὲν ἔσται ἀγαθόν οἰκέτῃ δὲ σοφῷ εὔοδοι ἔσονται πράξεις καὶ κατευθυνθήσεται ἡ ὁδὸς αὐτοῦ
14 Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
νόμος σοφοῦ πηγὴ ζωῆς ὁ δὲ ἄνους ὑπὸ παγίδος θανεῖται
15 Boyebi ememelaka bato ngolu, kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi.
σύνεσις ἀγαθὴ δίδωσιν χάριν τὸ δὲ γνῶναι νόμον διανοίας ἐστὶν ἀγαθῆς ὁδοὶ δὲ καταφρονούντων ἐν ἀπωλείᾳ
16 Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.
πᾶς πανοῦργος πράσσει μετὰ γνώσεως ὁ δὲ ἄφρων ἐξεπέτασεν ἑαυτοῦ κακίαν
17 Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.
βασιλεὺς θρασὺς ἐμπεσεῖται εἰς κακά ἄγγελος δὲ πιστὸς ῥύσεται αὐτόν
18 Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
πενίαν καὶ ἀτιμίαν ἀφαιρεῖται παιδεία ὁ δὲ φυλάσσων ἐλέγχους δοξασθήσεται
19 Posa oyo ekokisami esalaka esengo na motema, kasi kokabwana na mabe ezali likambo ya nkele na miso ya zoba.
ἐπιθυμίαι εὐσεβῶν ἡδύνουσιν ψυχήν ἔργα δὲ ἀσεβῶν μακρὰν ἀπὸ γνώσεως
20 Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
ὁ συμπορευόμενος σοφοῖς σοφὸς ἔσται ὁ δὲ συμπορευόμενος ἄφροσι γνωσθήσεται
21 Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.
ἁμαρτάνοντας καταδιώξεται κακά τοὺς δὲ δικαίους καταλήμψεται ἀγαθά
22 Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.
ἀγαθὸς ἀνὴρ κληρονομήσει υἱοὺς υἱῶν θησαυρίζεται δὲ δικαίοις πλοῦτος ἀσεβὼν
23 Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo.
δίκαιοι ποιήσουσιν ἐν πλούτῳ ἔτη πολλά ἄδικοι δὲ ἀπολοῦνται συντόμως
24 Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
ὃς φείδεται τῆς βακτηρίας μισεῖ τὸν υἱὸν αὐτοῦ ὁ δὲ ἀγαπῶν ἐπιμελῶς παιδεύει
25 Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.
δίκαιος ἔσθων ἐμπιπλᾷ τὴν ψυχὴν αὐτοῦ ψυχαὶ δὲ ἀσεβῶν ἐνδεεῖς

< Masese 13 >