< Mitango 36 >

1 Bakonzi ya mabota ya etuka ya bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase mpe mokitani ya Jozefi, bayaki liboso ya Moyize mpe liboso ya bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosolola na bango.
Then the leaders of the ancestors' families of the clan of Gilead son of Machir (who was Manasseh's son), who were from the clans of the descendants of Joseph, came and spoke before Moses and before the leaders who were the heads of the ancestor's families of the people of Israel.
2 Balobaki: « Tango Yawe apesaki mitindo epai ya nkolo na ngai ete apesa mokili lokola libula epai ya bana ya Isalaele na kobeta zeke, apesaki yo mpe mitindo ya kopesa libula ya Tselofikadi, ndeko na biso ya mobali, epai ya bana na ye ya basi.
They said, “Yahweh commanded you, our master, to give a share of land by lot to the people of Israel. You were commanded by Yahweh to give the share of Zelophehad our brother to his daughters.
3 Boye, soki esalemi ete bana basi yango babali mibali oyo bawuti na mabota mosusu ya Isalaele, libula na bango ekolongwa na libula ya batata na biso, mpe bakobakisa yango na libula ya libota ya mibali oyo bakobala bango. Bongo, libula oyo epesamelaki biso ekokoma moke.
But if his daughters marry men in another tribe of the people of Israel, then their share of land will be removed from our ancestor's share. It will be added to the share of the tribes that they join. In that case, it will be removed from the assigned share of our inheritance.
4 Tango mobu ya kosepela kokangolama ekokoma mpo na bana ya Isalaele, libula ya bana basi yango ekobakisama na libula ya mabota ya mibali oyo babalaki bango, mpe bakozwa mabele na bango wuta na libula ya libota ya bakoko na biso. »
In that case, when the year of Jubilee of the people of Israel comes, then their share will be joined to the share of the tribe that they have joined. In this way, their share will be taken away from the share of our ancestors' tribe.”
5 Boye, na etinda ya Yawe, Moyize epesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele: « Makambo oyo libota ya bakitani ya Jozefi balobi ezali na nzela.
So Moses gave a command to the people of Israel, at Yahweh's word. He said, “What the tribe of Joseph's descendants says is right.
6 Tala liloba oyo Yawe alobaki mpo na bana basi ya Tselofikadi: ‹ Bakoki solo kobalana na mibali nyonso oyo bango balingi, kasi ezala kaka kati na mibali ya libota ya tata na bango.
This is what Yahweh commands concerning Zelophehad's daughters. He says, 'Let them be married to whom they think best, but they must marry only within the family of their father's tribe.'
7 Pamba te libula moko te kati na Isalaele ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu; moto nyonso ya Isalaele asengeli kobatela mabele ya libota oyo azwaki lokola libula wuta na bakoko na ye.
No share of the people of Israel must change from one tribe to another. Each one of the people of Israel must continue with the share of his ancestor's tribe.
8 Mwana mwasi nyonso kati na bikolo ya Isalaele oyo akozwa mabele lokola libula asengeli kobalana kaka na mobali ya libota ya tata na ye mpo ete moto nyonso ya Isalaele azwa libula ya tata na ye.
Every woman of the people of Israel who owns a share in her tribe must marry someone from the clans belonging to her father's tribe. This is so that everyone of the people of Israel may own an inheritance from his ancestors.
9 Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › »
No share may change hands from one tribe to another. Everyone of the tribes of the people of Israel must keep his own inheritance.”
10 Boye, bana basi ya Tselofikadi basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
So Zelophehad's daughters did as Yahweh had commanded Moses.
11 Bana basi ya Tselofikadi: Mala, Tiritsa, Ogila, Milika mpe Noa; babalanaki na bandeko na bango, na ngambo ya libota ya tata na bango.
Mahlah, Tirzah, Hoglah, Milkah, and Noah, the daughters of Zelophehad, married descendants of Manasseh.
12 Babalanaki kati na etuka ya bakitani ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, mpe libula na bango etikalaki na libota mpe etuka ya tata na bango.
They married into the clans of the descendants of Manasseh son of Joseph. In this way, their inheritances remained in the tribe to which their father's clan belonged.
13 Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.
These are the commands and the decrees that Yahweh gave by Moses to the people of Israel in the plains of Moab by the Jordan at Jericho.

< Mitango 36 >