< Mitango 28 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
καὶ ἐλάλησεν κύριος πρὸς Μωυσῆν λέγων
2 « Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. ›
ἔντειλαι τοῖς υἱοῖς Ισραηλ καὶ ἐρεῖς πρὸς αὐτοὺς λέγων τὰ δῶρά μου δόματά μου καρπώματά μου εἰς ὀσμὴν εὐωδίας διατηρήσετε προσφέρειν ἐμοὶ ἐν ταῖς ἑορταῖς μου
3 Loba na bango: ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe: bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela.
καὶ ἐρεῖς πρὸς αὐτούς ταῦτα τὰ καρπώματα ὅσα προσάξετε κυρίῳ ἀμνοὺς ἐνιαυσίους ἀμώμους δύο τὴν ἡμέραν εἰς ὁλοκαύτωσιν ἐνδελεχῶς
4 Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa;
τὸν ἀμνὸν τὸν ἕνα ποιήσεις τὸ πρωὶ καὶ τὸν ἀμνὸν τὸν δεύτερον ποιήσεις τὸ πρὸς ἑσπέραν
5 elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.
καὶ ποιήσεις τὸ δέκατον τοῦ οιφι σεμίδαλιν εἰς θυσίαν ἀναπεποιημένην ἐν ἐλαίῳ ἐν τετάρτῳ τοῦ ιν
6 Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
ὁλοκαύτωμα ἐνδελεχισμοῦ ἡ γενομένη ἐν τῷ ὄρει Σινα εἰς ὀσμὴν εὐωδίας κυρίῳ
7 Bokobakisa lisusu likabo ya masanga: balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule.
καὶ σπονδὴν αὐτοῦ τὸ τέταρτον τοῦ ιν τῷ ἀμνῷ τῷ ἑνί ἐν τῷ ἁγίῳ σπείσεις σπονδὴν σικερα κυρίῳ
8 Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
καὶ τὸν ἀμνὸν τὸν δεύτερον ποιήσεις τὸ πρὸς ἑσπέραν κατὰ τὴν θυσίαν αὐτοῦ καὶ κατὰ τὴν σπονδὴν αὐτοῦ ποιήσετε εἰς ὀσμὴν εὐωδίας κυρίῳ
9 Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma.
καὶ τῇ ἡμέρᾳ τῶν σαββάτων προσάξετε δύο ἀμνοὺς ἐνιαυσίους ἀμώμους καὶ δύο δέκατα σεμιδάλεως ἀναπεποιημένης ἐν ἐλαίῳ εἰς θυσίαν καὶ σπονδὴν
10 Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga.
ὁλοκαύτωμα σαββάτων ἐν τοῖς σαββάτοις ἐπὶ τῆς ὁλοκαυτώσεως τῆς διὰ παντὸς καὶ τὴν σπονδὴν αὐτοῦ
11 Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba: bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te.
καὶ ἐν ταῖς νεομηνίαις προσάξετε ὁλοκαυτώματα τῷ κυρίῳ μόσχους ἐκ βοῶν δύο καὶ κριὸν ἕνα ἀμνοὺς ἐνιαυσίους ἑπτὰ ἀμώμους
12 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta;
τρία δέκατα σεμιδάλεως ἀναπεποιημένης ἐν ἐλαίῳ τῷ μόσχῳ τῷ ἑνὶ καὶ δύο δέκατα σεμιδάλεως ἀναπεποιημένης ἐν ἐλαίῳ τῷ κριῷ τῷ ἑνί
13 mpo na mwana meme moko na moko, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na mafuta. Ezali mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
δέκατον σεμιδάλεως ἀναπεποιημένης ἐν ἐλαίῳ τῷ ἀμνῷ τῷ ἑνί θυσίαν ὀσμὴν εὐωδίας κάρπωμα κυρίῳ
14 Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala: balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali.
ἡ σπονδὴ αὐτῶν τὸ ἥμισυ τοῦ ιν ἔσται τῷ μόσχῳ τῷ ἑνί καὶ τὸ τρίτον τοῦ ιν ἔσται τῷ κριῷ τῷ ἑνί καὶ τὸ τέταρτον τοῦ ιν ἔσται τῷ ἀμνῷ τῷ ἑνὶ οἴνου τοῦτο ὁλοκαύτωμα μῆνα ἐκ μηνὸς εἰς τοὺς μῆνας τοῦ ἐνιαυτοῦ
15 Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
καὶ χίμαρον ἐξ αἰγῶν ἕνα περὶ ἁμαρτίας κυρίῳ ἐπὶ τῆς ὁλοκαυτώσεως τῆς διὰ παντὸς ποιηθήσεται καὶ ἡ σπονδὴ αὐτοῦ
16 Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe.
καὶ ἐν τῷ μηνὶ τῷ πρώτῳ τεσσαρεσκαιδεκάτῃ ἡμέρᾳ τοῦ μηνὸς πασχα κυρίῳ
17 Mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango kaka ekozala mokolo ya feti monene. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire.
καὶ τῇ πεντεκαιδεκάτῃ ἡμέρᾳ τοῦ μηνὸς τούτου ἑορτή ἑπτὰ ἡμέρας ἄζυμα ἔδεσθε
18 Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
καὶ ἡ ἡμέρα ἡ πρώτη ἐπίκλητος ἁγία ἔσται ὑμῖν πᾶν ἔργον λατρευτὸν οὐ ποιήσετε
19 Bokobonzela Yawe, lokola likabo bazikisa na moto, lokola mbeka ya kotumba: bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali, bana mibali ya meme sambo ya mobu moko; nyonso esengeli kozanga mbeba.
καὶ προσάξετε ὁλοκαυτώματα καρπώματα κυρίῳ μόσχους ἐκ βοῶν δύο κριὸν ἕνα ἑπτὰ ἀμνοὺς ἐνιαυσίους ἄμωμοι ἔσονται ὑμῖν
20 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko na moko ya mobali, bakobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta;
καὶ ἡ θυσία αὐτῶν σεμίδαλις ἀναπεποιημένη ἐν ἐλαίῳ τρία δέκατα τῷ μόσχῳ τῷ ἑνὶ καὶ δύο δέκατα τῷ κριῷ τῷ ἑνί
21 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
δέκατον δέκατον ποιήσεις τῷ ἀμνῷ τῷ ἑνὶ τοῖς ἑπτὰ ἀμνοῖς
22 Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.
καὶ χίμαρον ἐξ αἰγῶν ἕνα περὶ ἁμαρτίας ἐξιλάσασθαι περὶ ὑμῶν
23 Bokobonza mbeka oyo nyonso, bakisa mpe mbeka ya kotumba ya libela ya tongo.
πλὴν τῆς ὁλοκαυτώσεως τῆς διὰ παντὸς τῆς πρωινῆς ὅ ἐστιν ὁλοκαύτωμα ἐνδελεχισμοῦ
24 Bokobanda kobonza yango mikolo nyonso, na mikolo nyonso sambo, lokola bilei bazikisa na moto; mpe solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Ekobanda kobakisama na mbeka ya kotumba ya libela mpe na mbeka na yango ya masanga.
ταῦτα κατὰ ταῦτα ποιήσετε τὴν ἡμέραν εἰς τὰς ἑπτὰ ἡμέρας δῶρον κάρπωμα εἰς ὀσμὴν εὐωδίας κυρίῳ ἐπὶ τοῦ ὁλοκαυτώματος τοῦ διὰ παντὸς ποιήσεις τὴν σπονδὴν αὐτοῦ
25 Na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule; bongo na mokolo yango, bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
καὶ ἡ ἡμέρα ἡ ἑβδόμη κλητὴ ἁγία ἔσται ὑμῖν πᾶν ἔργον λατρευτὸν οὐ ποιήσετε ἐν αὐτῇ
26 Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo.
καὶ τῇ ἡμέρᾳ τῶν νέων ὅταν προσφέρητε θυσίαν νέαν κυρίῳ τῶν ἑβδομάδων ἐπίκλητος ἁγία ἔσται ὑμῖν πᾶν ἔργον λατρευτὸν οὐ ποιήσετε
27 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: bangombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana meme sambo ya mibali ya mobu moko.
καὶ προσάξετε ὁλοκαυτώματα εἰς ὀσμὴν εὐωδίας κυρίῳ μόσχους ἐκ βοῶν δύο κριὸν ἕνα ἑπτὰ ἀμνοὺς ἐνιαυσίους ἀμώμους
28 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta;
ἡ θυσία αὐτῶν σεμίδαλις ἀναπεποιημένη ἐν ἐλαίῳ τρία δέκατα τῷ μόσχῳ τῷ ἑνὶ καὶ δύο δέκατα τῷ κριῷ τῷ ἑνί
29 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
δέκατον δέκατον τῷ ἀμνῷ τῷ ἑνὶ τοῖς ἑπτὰ ἀμνοῖς
30 Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.
καὶ χίμαρον ἐξ αἰγῶν ἕνα περὶ ἁμαρτίας ἐξιλάσασθαι περὶ ὑμῶν
31 Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › »
πλὴν τοῦ ὁλοκαυτώματος τοῦ διὰ παντός καὶ τὴν θυσίαν αὐτῶν ποιήσετέ μοι ἄμωμοι ἔσονται ὑμῖν καὶ τὰς σπονδὰς αὐτῶν

< Mitango 28 >