< Mitango 26 >

1 Sima na etumbu wana, Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron: 2 « Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. » 3 Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki: 4 « Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. » Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito: 5 Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki; na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu; 6 na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi; na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi. 7 Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato. 8 Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu, 9 mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe. 10 Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa. 11 Kasi bakitani ya Kore bakufaki te. 12 Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli; na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini; na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini; 13 na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi; na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo. 14 Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale. 15 Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni; na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi; na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni; 16 na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini; na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri; 17 na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki; na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli. 18 Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano. 19 Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana. 20 Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera. 21 Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi; na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli. 22 Yango nde ezalaki mabota ya Yuda; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano. 23 Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola; na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa; 24 na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi; na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi. 25 Yango nde ezalaki mabota ya Isakari; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato. 26 Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi; na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni; na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli. 27 Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano. 28 Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki: 29 Bakitani ya Manase: na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi); na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi. 30 Tala bakitani ya Galadi: na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri; na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki; 31 na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli; na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi; 32 na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida; na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi. 33 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi; bongo, tala bakombo na bango: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. 34 Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo. 35 Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela; na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri; na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani. 36 Tala bakitani ya Shutela: na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani. 37 Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango. 38 Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela; na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli; na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami; 39 na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami; na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami. 40 Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki: na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi; na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani. 41 Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano. 42 Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami. Bango nde bazalaki bakitani ya Dani: 43 bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei. 44 Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina; na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi; na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria; 45 na nzela ya bakitani ya Beria: na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi; na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli. 46 Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera. 47 Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei. 48 Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli; na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni; 49 na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri; na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi. 50 Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei. 51 Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato. 52 Yawe alobaki na Moyize: 53 « Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana. 54 Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki. 55 Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango. 56 Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. » 57 Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango: na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni; na nzela ya Keati, bakitani ya Keati; na nzela ya Merari, bakitani ya Merari. 58 Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi: bakitani ya libota ya Libini, bakitani ya libota ya Ebron, bakitani ya libota ya Maali, bakitani ya libota ya Mushi, bakitani ya libota ya Kore. Keati azalaki tata ya Amirami; 59 bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami. 60 Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari. 61 Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya. 62 Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango. 63 Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko. 64 Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai. 65 Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.

< Mitango 26 >