< Mitango 16 >

1 Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita; ezalaki: Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti.
Now Korah, the son of Izhar, the son of Kohath, the son of Levi, and Dathan and Abiram, the sons of Eliab, and On, the son of Peleth, sons of Reuben, took men:
2 Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga.
And they rose up before Moses, with certain of the children of Israel, two hundred and fifty princes of the assembly, famous in the congregation, men of renown:
3 Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango: — Bino mpe bolekisi! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe?
And they gathered themselves together against Moses and against Aaron, and said to them, Ye take too much upon you, seeing all the congregation are holy, every one of them, and the LORD is among them: why then do ye raise yourselves above the congregation of the LORD?
4 Tango Moyize ayokaki bongo, akweyaki elongi kino na mabele.
And when Moses heard it, he fell upon his face:
5 Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye: — Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye.
And he spoke to Korah and to all his company, saying, Even to morrow the LORD will show who are his, and who is holy; and will cause him to come near to him: even him whom he hath chosen will he cause to come near to him.
6 Yo, Kore, elongo na bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokosala likambo oyo: Bokamata bambabola oyo batumbelaka malasi
This do; Take for yourselves censers, Korah, and all his company;
7 mpe, lobi, botia moto mpe malasi ya ansa kati na yango liboso ya Yawe. Moto oyo Yawe akopona, ye nde azali bule. Bino Balevi, bino mpe bolekisi!
And put fire in them, and put incense in them before the LORD to morrow: and it shall be that the man whom the LORD doth choose, he shall be holy: ye take too much upon you, ye sons of Levi.
8 Moyize alobaki lisusu na Kore: — Bino Balevi, boyoka sik’oyo!
And Moses said to Korah, Hear, I pray you, ye sons of Levi:
9 Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango?
Seemeth it but a small thing to you, that the God of Israel hath separated you from the congregation of Israel, to bring you near to himself to do the service of the tabernacle of the LORD, and to stand before the congregation to minister to them?
10 Abendaki bino pembeni na Ye elongo na Balevi nyonso oyo bazali kolanda bino; kasi sik’oyo, bazali lisusu koluka kozwa bonganga-Nzambe!
And he hath brought thee near to him, and all thy brethren the sons of Levi with thee: and seek ye the priesthood also?
11 Ezali Yawe nde bosalelaki likita, yo elongo na bato oyo bazali kolanda yo. Aron nde nani mpo ete bokoka koyimayima na tina na ye?
For which cause both thou and all thy company are gathered together against the LORD: and what is Aaron, that ye murmur against him?
12 Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki: — Tokoya te!
And Moses sent to call Dathan and Abiram, the sons of Eliab: who said, We will not come up:
13 Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso?
Is it a small thing that thou hast brought us out of a land that floweth with milk and honey, to kill us in the wilderness, except thou make thyself altogether a prince over us?
14 Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso? Te, tokoya te!
Moreover thou hast not brought us into a land that floweth with milk and honey, or given us inheritance of fields and vineyards: wilt thou put out the eyes of these men? we will not come up.
15 Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe: — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
And Moses was very angry, and said to the LORD, Respect not thou their offering: I have not taken one donkey from them, neither have I hurt one of them.
16 Moyize alobaki na Kore: — Lobi, yo mpe bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokotelema elongo na Aron liboso ya Yawe.
And Moses said to Korah, Be thou and all thy company before the LORD, thou, and they, and Aaron, to morrow:
17 Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino.
And take every man his censer, and put incense in them, and bring ye before the LORD every man his censer, two hundred and fifty censers; thou also, and Aaron, each of you his censer.
18 Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
And they took every man his censer, and put fire in them, and laid incense on them, and stood in the door of the tabernacle of the congregation with Moses and Aaron.
19 Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba,
And Korah gathered all the congregation against them to the door of the tabernacle of the congregation: and the glory of the LORD appeared to all the congregation.
20 mpe Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
And the LORD spoke to Moses and to Aaron, saying,
21 — Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko.
Separate yourselves from among this congregation, that I may consume them in a moment.
22 Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki: — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka?
And they fell upon their faces, and said, O God, the God of the spirits of all flesh, shall one man sin, and wilt thou be angry with all the congregation?
23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize:
And the LORD spoke to Moses, saying,
24 — Loba na lisanga ete bakende mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami.
Speak to the congregation, saying, Withdraw yourselves from about the tabernacle of Korah, Dathan, and Abiram.
25 Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye.
And Moses rose up and went to Dathan and Abiram; and the elders of Israel followed him.
26 Akebisaki lisanga mobimba: « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango! »
And he spoke to the congregation, saying, Depart, I pray you, from the tents of these wicked men, and touch nothing of theirs, lest ye be consumed in all their sins.
27 Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.
So they withdrew from the tabernacle of Korah, Dathan, and Abiram, on every side: and Dathan and Abiram came out, and stood in the door of their tents, and their wives, and their sons, and their little children.
28 Bongo Moyize alobaki: « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te:
And Moses said, by this ye shall know that the LORD hath sent me to do all these works; for I have not done them of my own mind.
29 Soki bato oyo bakufi kufa ya bato nyonso mpe bamoni makambo oyo bato nyonso bamonaka, wana nde Yawe atindaki ngai te!
If these men shall die the common death of all men, or if they be visited after the visitation of all men; then the LORD hath not sent me.
30 Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. » (Sheol h7585)
But if the LORD shall make a new thing, and the earth shall open her mouth, and swallow them up, with all that appertain to them, and they go down alive into the pit; then ye shall understand that these men have provoked the LORD. (Sheol h7585)
31 Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami;
And it came to pass, as he had finished speaking all these words, that the ground opened up that was under them:
32 efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso.
And the earth opened her mouth, and swallowed them up, and their houses, and all the men that appertained to Korah, and all their goods.
33 Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. (Sheol h7585)
They, and all that appertained to them, went down alive into the pit, and the earth closed upon them: and they perished from among the congregation. (Sheol h7585)
34 Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela: « Mabele ekomela biso mpe lokola! »
And all Israel that were around them fled at the cry of them: for they said, Lest the earth swallow us up also.
35 Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.
And there came out a fire from the LORD, and consumed the two hundred and fifty men that offered incense.
36 Yawe alobaki na Moyize:
And the LORD spoke to Moses, saying,
37 « Loba na Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, ete balongola bambabola oyo batumbelaka malasi na kati-kati ya moto, mpe bapanza makala ya moto mosika, pamba te bambabola wana ezali bule.
Speak to Eleazar the son of Aaron the priest, that he take up the censers out of the burning, and scatter thou the fire yonder; for they are hallowed.
38 Tika ete bakamata bambabola yango, atako ezali ya bato oyo bakufaki likolo ya masumu na bango; mpe tika ete batuta yango na marto mpo ete ekoma papala mpe batia yango likolo ya etumbelo, pamba te bamemaki yango liboso ya Yawe mpe ekomaki bule. Tika ete yango ekoma elembo mpo na bana ya Isalaele. »
The censers of these sinners against their own souls, let them make them broad plates for a covering of the altar: for they offered them before the LORD, therefore they are hallowed: and they shall be a sign to the children of Israel.
39 Boye, Nganga-Nzambe Eleazari alokotaki bambabola nyonso ya bronze oyo bato oyo bazikaki na moto bamemaki, mpe atutaki yango na marto mpo na kotia yango likolo ya etumbelo;
And Eleazar the priest took the brasen censers, which they that were burnt had offered; and they were made broad plates for a covering of the altar:
40 ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye.
To be a memorial to the children of Israel, that no stranger, who is not of the seed of Aaron, should come near to offer incense before the LORD; that he may not be as Korah, and as his company: as the LORD said to him by the hand of Moses.
41 Mokolo oyo elandaki, lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ekomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron. Bazalaki koloba: « Bino bobomi bato na Yawe. »
But on the next day all the congregation of the children of Israel murmured against Moses and against Aaron, saying, Ye have killed the people of the LORD.
42 Kasi tango lisanga mobimba esanganaki mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, babalukaki na ngambo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe mbala moko lipata ezipaki yango mpe nkembo na Yawe emonisamaki.
And it came to pass, when the congregation was gathered against Moses and against Aaron, that they looked toward the tabernacle of the congregation: and, behold, the cloud covered it, and the glory of the LORD appeared.
43 Boye, Moyize mpe Aron bakendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani
And Moses and Aaron came before the tabernacle of the congregation.
44 mpe Yawe alobaki na Moyize:
And the LORD spoke to Moses, saying,
45 « Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
Remove from among this congregation, that I may consume them as in a moment. And they fell upon their faces.
46 Moyize alobaki na Aron: « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. »
And Moses said to Aaron, Take a censer, and put fire in it from off the altar, and put on incense, and go quickly to the congregation, and make an atonement for them: for there is wrath gone out from the LORD; the plague is begun.
47 Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango.
And Aaron took as Moses commanded, and ran into the midst of the congregation; and, behold, the plague was begun among the people: and he put on incense, and made an atonement for the people.
48 Atelemaki na kati-kati ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe oyo bazalaki ya kokufa mpe etumbu esilaki.
And he stood between the dead and the living; and the plague was stayed.
49 Nzokande, bato nkoto zomi na minei na nkama sambo bakufaki na etumbu wana, bakisa oyo bakufaki likolo ya Kore.
Now they that died in the plague were fourteen thousand and seven hundred, besides them that died about the matter of Korah.
50 Bongo, Aron azongaki epai ya Moyize na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te etumbu esilaki.
And Aaron returned to Moses at the door of the tabernacle of the congregation: and the plague was stayed.

< Mitango 16 >