< Neyemi 3 >

1 Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.
καὶ ἀνέστη Ελισουβ ὁ ἱερεὺς ὁ μέγας καὶ οἱ ἀδελφοὶ αὐτοῦ οἱ ἱερεῖς καὶ ᾠκοδόμησαν τὴν πύλην τὴν προβατικήν αὐτοὶ ἡγίασαν αὐτὴν καὶ ἔστησαν θύρας αὐτῆς καὶ ἕως πύργου τῶν ἑκατὸν ἡγίασαν ἕως πύργου Ανανεηλ
2 Bato ya Jeriko babongisaki eteni ya mir oyo ekanganaki na yango; mpe Zakuri, mwana mobali ya Imiri, atongaki pene na bango.
καὶ ἐπὶ χεῖρας υἱῶν ἀνδρῶν Ιεριχω καὶ ἐπὶ χεῖρας υἱῶν Ζακχουρ υἱοῦ Αμαρι
3 Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango.
καὶ τὴν πύλην τὴν ἰχθυηρὰν ᾠκοδόμησαν υἱοὶ Ασανα αὐτοὶ ἐστέγασαν αὐτὴν καὶ ἔστησαν θύρας αὐτῆς καὶ κλεῖθρα αὐτῆς καὶ μοχλοὺς αὐτῆς
4 Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango.
καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν κατέσχεν ἀπὸ Ραμωθ υἱὸς Ουρια υἱοῦ Ακως καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν κατέσχεν Μοσολλαμ υἱὸς Βαραχιου υἱοῦ Μασεζεβηλ καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν κατέσχεν Σαδωκ υἱὸς Βαανα
5 Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala.
καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν κατέσχοσαν οἱ Θεκωιν καὶ αδωρηεμ οὐκ εἰσήνεγκαν τράχηλον αὐτῶν εἰς δουλείαν αὐτῶν
6 Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
καὶ τὴν πύλην τοῦ Ισανα ἐκράτησαν Ιοϊδα υἱὸς Φασεκ καὶ Μεσουλαμ υἱὸς Βασωδια αὐτοὶ ἐστέγασαν αὐτὴν καὶ ἔστησαν θύρας αὐτῆς καὶ κλεῖθρα αὐτῆς καὶ μοχλοὺς αὐτῆς
7 Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango.
8 Uzieli, mwana mobali ya Araya, moko kati na banyangwisi bibende na moto, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Bongo Anania, moko kati na basali oyo basalaka malasi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo elandaki. Babongisaki mir ya Yelusalemi kino na esika ya mir monene.
καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν ἐκράτησεν Ανανιας υἱὸς τοῦ Ρωκεϊμ καὶ κατέλιπον Ιερουσαλημ ἕως τοῦ τείχους τοῦ πλατέος
9 Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki.
καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν ἐκράτησεν Ραφαια ἄρχων ἡμίσους περιχώρου Ιερουσαλημ
10 Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye.
καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτῶν ἐκράτησεν Ιεδαια υἱὸς Ερωμαφ καὶ κατέναντι οἰκίας αὐτοῦ καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτοῦ ἐκράτησεν Ατους υἱὸς Ασβανια
11 Malikiya, mwana mobali ya Arimi, mpe Ashubi, mwana mobali ya Paati-Moabi, babongisaki eteni mosusu ya mir mpe ndako molayi ya Fulu.
καὶ δεύτερος ἐκράτησεν Μελχιας υἱὸς Ηραμ καὶ Ασουβ υἱὸς Φααθμωαβ καὶ ἕως πύργου τῶν θαννουριμ
12 Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki.
καὶ ἐπὶ χεῖρα αὐτοῦ ἐκράτησεν Σαλουμ υἱὸς Αλλωης ἄρχων ἡμίσους περιχώρου Ιερουσαλημ αὐτὸς καὶ αἱ θυγατέρες αὐτοῦ
13 Anuni mpe bavandi ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lubwaku. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Babongisaki lisusu bametele pene nkama mitano ya mir kino na Ekuke ya Fulu.
τὴν πύλην τῆς φάραγγος ἐκράτησαν Ανουν καὶ οἱ κατοικοῦντες Ζανω αὐτοὶ ᾠκοδόμησαν αὐτὴν καὶ ἔστησαν θύρας αὐτῆς καὶ κλεῖθρα αὐτῆς καὶ μοχλοὺς αὐτῆς καὶ χιλίους πήχεις ἐν τῷ τείχει ἕως πύλης τῆς κοπρίας
14 Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
καὶ τὴν πύλην τῆς κοπρίας ἐκράτησεν Μελχια υἱὸς Ρηχαβ ἄρχων περιχώρου Βηθαχαρμ αὐτὸς καὶ οἱ υἱοὶ αὐτοῦ καὶ ἐσκέπασαν αὐτὴν καὶ ἔστησαν θύρας αὐτῆς καὶ κλεῖθρα αὐτῆς καὶ μοχλοὺς αὐτῆς
15 Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi.
καὶ τὸ τεῖχος κολυμβήθρας τῶν κωδίων τῇ κουρᾷ τοῦ βασιλέως καὶ ἕως τῶν κλιμάκων τῶν καταβαινουσῶν ἀπὸ πόλεως Δαυιδ
16 Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi.
ὀπίσω αὐτοῦ ἐκράτησεν Νεεμιας υἱὸς Αζαβουχ ἄρχων ἡμίσους περιχώρου Βηθσουρ ἕως κήπου τάφου Δαυιδ καὶ ἕως τῆς κολυμβήθρας τῆς γεγονυίας καὶ ἕως Βηθαγγαβαριμ
17 Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye.
ὀπίσω αὐτοῦ ἐκράτησαν οἱ Λευῖται Ραουμ υἱὸς Βανι ἐπὶ χεῖρα αὐτοῦ ἐκράτησεν Ασαβια ἄρχων ἡμίσους περιχώρου Κεϊλα τῷ περιχώρῳ αὐτοῦ
18 Bandeko na ye batongaki pembeni na ye, na bokambami ya Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, mokambi ya ndambo mosusu ya etuka ya Keila.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησαν ἀδελφοὶ αὐτῶν Βενι υἱὸς Ηναδαδ ἄρχων ἡμίσους περιχώρου Κεϊλα
19 Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana.
καὶ ἐκράτησεν ἐπὶ χεῖρα αὐτοῦ Αζουρ υἱὸς Ἰησοῦ ἄρχων τοῦ Μασφε μέτρον δεύτερον πύργου ἀναβάσεως τῆς συναπτούσης τῆς γωνίας
20 Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Βαρουχ υἱὸς Ζαβου μέτρον δεύτερον ἀπὸ τῆς γωνίας ἕως θύρας Βηθελισουβ τοῦ ἱερέως τοῦ μεγάλου
21 Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Μεραμωθ υἱὸς Ουρια υἱοῦ Ακως μέτρον δεύτερον ἀπὸ θύρας Βηθελισουβ ἕως ἐκλείψεως Βηθελισουβ
22 Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye.
καὶ μετ’ αὐτὸν ἐκράτησαν οἱ ἱερεῖς ἄνδρες Αχεχαρ
23 Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye.
καὶ μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Βενιαμιν καὶ Ασουβ κατέναντι οἴκου αὐτῶν μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Αζαρια υἱὸς Μαασηα υἱοῦ Ανανια ἐχόμενα οἴκου αὐτοῦ
24 Pene na ye, Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika oyo bamir ekutana mpe kino na songe.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Βανι υἱὸς Ηναδαδ μέτρον δεύτερον ἀπὸ Βηθαζαρια ἕως τῆς γωνίας καὶ ἕως τῆς καμπῆς
25 Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi,
Φαλαλ υἱοῦ Ευζαι ἐξ ἐναντίας τῆς γωνίας καὶ ὁ πύργος ὁ ἐξέχων ἐκ τοῦ οἴκου τοῦ βασιλέως ὁ ἀνώτερος ὁ τῆς αὐλῆς τῆς φυλακῆς καὶ μετ’ αὐτὸν Φαδαια υἱὸς Φορος
26 elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi.
καὶ οἱ ναθινιμ ἦσαν οἰκοῦντες ἐν τῷ Ωφαλ ἕως κήπου πύλης τοῦ ὕδατος εἰς ἀνατολάς καὶ ὁ πύργος ὁ ἐξέχων
27 Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησαν οἱ Θεκωιν μέτρον δεύτερον ἐξ ἐναντίας τοῦ πύργου τοῦ μεγάλου τοῦ ἐξέχοντος καὶ ἕως τοῦ τείχους τοῦ Οφλα
28 Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye.
ἀνώτερον πύλης τῶν ἵππων ἐκράτησαν οἱ ἱερεῖς ἀνὴρ ἐξ ἐναντίας οἴκου αὐτοῦ
29 Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Σαδδουκ υἱὸς Εμμηρ ἐξ ἐναντίας οἴκου αὐτοῦ καὶ μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Σαμαια υἱὸς Σεχενια φύλαξ τῆς πύλης τῆς ἀνατολῆς
30 Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Ανανια υἱὸς Σελεμια καὶ Ανουμ υἱὸς Σελεφ ὁ ἕκτος μέτρον δεύτερον μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Μεσουλαμ υἱὸς Βαρχια ἐξ ἐναντίας γαζοφυλακίου αὐτοῦ
31 Pene na Meshulami, Malikiya, moko kati na basali oyo banyangwisaka bibende na moto, abongisaki eteni na ye kino na ndako ya basali ya Tempelo mpe ya bato ya mombongo. Eteni yango etalani na Ekuke ya Kokengela mpe kino na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutana.
μετ’ αὐτὸν ἐκράτησεν Μελχια υἱὸς τοῦ Σαραφι ἕως Βηθαναθινιμ καὶ οἱ ῥοποπῶλαι ἀπέναντι πύλης τοῦ Μαφεκαδ καὶ ἕως ἀναβάσεως τῆς καμπῆς
32 Bongo banyangwisi bibende na moto mpe bato ya mombongo babongisaki longwa na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutani, kino na Ekuke ya Bibwele.
καὶ ἀνὰ μέσον ἀναβάσεως τῆς πύλης τῆς προβατικῆς ἐκράτησαν οἱ χαλκεῖς καὶ οἱ ῥοποπῶλαι

< Neyemi 3 >